Welcome to DivineFlaver

VIDEOS | SCHOLASRHIPS | FOREIGN | MIXTAPES

LIKE TO UPLOAD YOUR SONG? CLICK HERE!

                 

Madilu System – Yaya

Posted by: || Categories: Africa


 

The song Yaya is an impressive song that will worth a place in your playlist.

Use the link below to stream and download Yaya by Madilu System.

Download Music Here

Lyrics for Yaya by Madilu System

Madilu ye meï SystemAppellation bien contrôlerLe grand ninja
Lelo mbula libwa wuta na nse ya mabélé yaya a-ah nga na mawaLelo mbula libwa wuta na nse ya mabélé yaya a-ah nga na mawa
Yaya otiki nga na bolokoYaya otikeli nga bwaleYaya otikeli nga pasi mawaMokili eloba otikela successBanda okende batu’a mokili bakoma komonela ngaï leki na yo yaya
Yaya otika nga na bwaleYaya otika nga bolokoYaya otika nga pasi mawa mawaMokili eloba otikela nga successBanda okende batu’a mokili bakoma komonela nga leki na yo yaya
Nzoto na nga cahier de brouillonMoto nionso alingi akomela mabé na yé na nzoto na nga yayaGéographie, mathématique eluta na nzoto na ngaïMoto nionso alingi asopela libabe na yé na nzoto na nga yaya
Yaya mokolo na wuti mikili yayaNakuti mboka mobimba bazali ko lela yo yayaEsali nga somo yaya, nazui nzelaBaké na lilita na yo yayaNa kuti eboquet ya fololo yayaNgaï pe nazui likanisi na tia oyo ya ngaï fololo ya monene yayaMais na moni eko zala provisoireTangu mususu miyibi bakoya ko yiba yangoTo eko kauka na moyi etonda Kisasa yayaEko zanga souvenirs yayaAlors na moni yaya ebongi na yemba yo po etikala libela
Na nokeli mvula libanda na mayi na misu eko leka ngaNani ako ndima nga nazali ko lela yoLibanga ba buakaka na nzeté sé oyo ebotaka mbumaOyo eko ndimama osé eh eko ndimama likolo yaya
Yaya na lali na butu yaya na loti kabakata ya ndoto yayaBa landi nga na ma bangaBa boma nga lokola ba bomaka Saint ÉtiennePo alaka oteya liloba ya YésuNa lamuki na tala boye ezalaki ndotoNake epa ya papa DialunganaNa tuni papa alobi eyali pouvoir
Na sala nini yaya okendeNa lelela nani yaya obungaNa tuna bato yaya a kendeSoki ozalaki ndé yo oko tela nga yo mawaYango na zongeli kombo na nga ya kalaYa Lou Jean de dieuMême les miens ba bengi ngaï ndokiCe n’est pas possible
Na lelela nani yaya ahNa tuna nani yaya akendeNa belela wapi yaya BongoMaso ba lobaki pe na maso bako lobaka pona ngaïLokuta eyaka na ascenseurKasi vérité eyaka na escalier yaya
Baluka ba boma nzoti ya mwana Moto pe ba kunda bango mokoNdengue ba mesana ko kunda bana ba ninga eh-ehBa lotisaka bana batu ba ndoti’a mabéBa salelaka mwana batu ba campagne ya lokuta ah yaya ah
Mabé kani nga na sala Nzambé kaka pe ayebiAta ba lobi pamba losambe ndé libosoNani na mokili akosisa sé mibeko ya NzambéAtombola mosapi na yé alakisa na bato nionso oyo ye nde mosantu yo, yo, yo mawa
HmmmSima na yo na mona makambu kinsasa nani a loba téBa bomi bato ba lati moposo na nga ya nzotoBa bombana, ba bombana molungier elekiLelo bo soto niosno ebimi libandaBakomi ko luka refuge na kati ya ebale mbogier
Ba bosani ba nzuzi ya ebale pe bazalakaBa baleine na ba hippopotameSoki ba lié yo oko tuna nani?
Boma ngaï kasi ko boya ngaï téEtikali bana Kin ba kata likamboEtikali ba Congolais ba kata klikambo


UPLOAD YOUR SONG HERE


 

Leave a comment

Enter Your Name (Optional)

Enter Comment Below




ABOUT US |  CONTACT US |  CONTENT REMOVAL(DMCA) | DISCLAIMER |  TERMS OF USE |  PRIVACY POLICY |  REQUEST SONG
Theme by DivineFlaver
Copyright © 2024 DivineFlaver.com All Rights Reserved