Welcome to DivineFlaver

VIDEOS | SCHOLASRHIPS | FOREIGN | MIXTAPES

LIKE TO UPLOAD YOUR SONG? CLICK HERE!

                 

Franco le T.P. O.K. Jazz – Mamou

Posted by: || Categories: Africa


 

Get this song from Franco le T.P. O.K. Jazz titled Mamou

The song Mamou is an impressive song that will worth a place in your playlist.

Use the link below to stream and download Mamou by Franco le T.P. O.K. Jazz.

Download Music Here

Lyrics for Mamou by Franco le T.P. O.K. Jazz

Olobaki nini eh eh eh ehOlobaki nini, Mamou, eh eh eh ehOlobaki nga na fundaka yo, na mobali na yoOlobaki nga na salaka kisefe, na libala na bino
Olobaki nini eh eh eh ehOlobaki nini, Mamou, eh eh eh ehOlobaki nga na fundaka yo, na mobali na yo ehOlobaki nga na salaka kisefe, na libala na bino
Madilu tika ye aloba ehMakambo ye asalaka, ayebaka teBa balabala ye atambolaka, bato ba monaka yeBa ndako ye akotaka, ba mur ya ndako efundaka yeNa ba coin nyoso ye a telemaka, ba chauffeur taxi ba monaka yePo na nini a panza yo sango, alobi, yo osalaka kisefeUm
Ngai moto na kotelaka yo, Mamou eh eh ye yeNgai moto nayebi ba sekele, Mamou eh ye yeLelo na komi moto mabe, Mamou eh ehOyebi tango engindaka oh, Mamou eh ehOko kanisa ngai Mamou, na kei eh ehAta ofingi ngai ndumba, Mamou yee
Oh Mamou, na kamwe vraiment, MamouNa kanisaka ozalaka ami na nga ya motemaPo oyebi que nayebi ba secret na yo nyosoEloko ekamwisi nga MamouOkei ko finga ngai epa ya MusaOlobi ngai nazali ndumbaVraiment, MamouOyebi, ngai na balakaNa divorca, na botaBongo soki lelo yo, MamouMoto na tiaka motemaObandi ko finga ngai ndumbaKi ndumba ezali maladi teKindumba ezali punition teMamou, yo mwasi ya libalaNa kamwaka yo, oko tambola na kabambi ya sac a mainNa kati ya sac wana, kabambi ya liputaBrosse a dents lokola moto azali ko kende voyageLipapa ya se, ebele ya makasuMamou, oyebi, epayi na yo nga nazalaka vivardPo mibali nayo nyoso toutAta mobali na yo akuti yo ozali ko solola na mobaliOko loba que aza mobali na ngaiMais na lingaka ko boma libala na bino te, MamouUmmm
Po na lingaka bo bokolo bana na bosemboAu lien na kota ba loba ohTala mwasi ya ndumba awuti ko boma libala ya mwasi abalaUm
Eloko nini oko luko oh, Mamou eh ye yeEloko nini olo luka oh, Mamou eh ye yeSignature osi ozua, MamouLanda nzela ya libala oh, MamouLanda nzela ya libala oh, Mamou eh yeyeYango evandisa yo na poto, Mamou eh ehTika ko kosa mobali nayo, Mamou eh ehSoki atelephone loba obimaka, Mamou
Mamou, awa lisusu soki na lobiNa kumbi ngambo, po naza ndumbaYo moko oyebisa ngaiMobali na yo atinda yo na poto, po oya ko bokolo banaYa ngo nde apesa ya signatureEkoma yo awa, oyebisi nga mobali na yo a telephonaka yo 2fois par jourNa 6heure du matin, na minuitApres minuit soki a telephone yoOkamati kisi ya ba ngungi, opompe ndako mobimbaPo bana ba lala ti tango yo oko zongaPo oyebi que mobali na yo atelephonaka na 6heure du matinTango atelephonaka yo, yoka ndenge oyebisaka na mobali na yo
Alo, papa ya banaBiso toza na biso kaka malamuKaka nde bana no awa moyen teVraiment mobulu likamboSurtout mwana oyo ya muke ya mobali azua elongo nayo, papaEh, azo kamwisa nga vraimentPhoto kutu otia na sani, na talaka ata elongi na yoAbamba yango na mabele photo epasukaMwana oyo penza mobulu moyen te penzaKaka ndenge ozalaka mwana mukeLokola mama na yo ayebisaka ngaiPapa ya bana, naza na makambo mususu na lobaka teKaka otindelaka biso mbongo ya ko liaNa suki se bongo
Yo moko osalaka mabe oh, Mamou eh yeyeYo moko osalaka mabe yeObangaka mobali nayo te, Mamou eh ehOlongola respect na ye okaba, Mamou eh ehBa camarade ya mobali nayo, Mamou eh ehObangaka bango te oh, Mamou eh ye yeLelo ofingi ngai ndumba ah nga na seki eh, Mamou, ye
Oh Mamou, kindumba oza ko finga ngai Bruxelles mobimbaOke ti na Paris osilisi ngaiOtindi mokanda na KinshasaMosusu otindi na BrazzaKindumba eza punition te, MamouOyeba Mamou esui ngaiNa lingaki dailleur na funda yo, MamouInutile na funda yoNa kamati obe film ya makambo nyoso ya mabe, oyo osalakaNa tekisi yango epa ya YorgoPo azikisela ngai film wanaMamou koma ngaiNdenge ba komaka Yezu na kuruzeSete mibale na lobokoSete moko na lokoloMamou, ozali mwasi ya libalaOkamwisaka ngaiNa monaka yo oza ndokiOza kinsenkwaOzali munyororoMamou, nini nakoki ko loba po na yoExample nini na koki na pesa po na basi ya mabalaExample ezaliteAwa ba lobe te nga nazali ndumbaNako tambola na mwasi ya libalaYango nako pesa yo makannisi mabe, te!Ezali nde yo moko moto oza na makanisi ya mabe
Ngai moto na kotelaka yoNgai moto naybi ba sekeleLelo na komi moto mabe, Mamou eh ehOyebi tango egindaka, MamouOko kanisa nga, MamouNake eh ehAta ofingi ngai ndumba, Mamou, ye


UPLOAD YOUR SONG HERE


 

Leave a comment

Enter Your Name (Optional)

Enter Comment Below




ABOUT US |  CONTACT US |  CONTENT REMOVAL(DMCA) | DISCLAIMER |  TERMS OF USE |  PRIVACY POLICY |  REQUEST SONG
Theme by DivineFlaver
Copyright © 2024 DivineFlaver.com All Rights Reserved